Matthew 19

MOSALA YA YESU NA YUDEA MPE NA YERUZALEM

Eyano ya Yesu mpo na koboma libala

1Tango Yesu asilisaki koloba, atikaki Galileya mpe akendaki na mokili ya Yudea, na ngambo mosusu ya Yordani. 2Bato ebele penza balandaki ye mpe abikisaki bango wana.

3Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpo na komeka ye, mpe batunaki ye :

—Boni, nzela epesami na mobali mpo alongola mwasi na ye na libala mpo na likambo moko boye ?

4Yesu azongisaki :

—Botangi naino te ete, na ebandeli Mokeli asalaki bango mobali mpe mwasi,
5mpe alobaki : yango wana mobali akotika tata na mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma moto se moko.

6Yango wana, bazali lisusu bato mibale te, kasi moto moko. Bongo, oyo Nzambe asangisi, moto akabola yango te !

7Bafarizeo balobaki na ye :

—Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali akoma mokandaya koboma libala na mwasi na ye, mpe abengana ye na libala ?

8Yesu azongiselaki bango :

—Moyize apesaki bino nzela ya koboma mabala na basi na bino, mpo mitema na bino ezalaki mabanga. Kasi na ebandeli ezalaki bongo te.
9Nalobi na bino ete, oyo akokabwana na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ye kindumba, mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo.

10Bayekoli balobaki na ye :

—Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, malamu kutu kobala te.

11Yesu azongisaki :

—Bato nyonso te bakoki kondima mateya oyo, kasi kaka baoyo bazwi likabo yango.
12Pamba te, basusu babalaka te mpo bakufa mokongo banda babotama, basusu mpo bato balongola bango mapumbu, mpe basusu mpo na kosalela Bokonzi ya Likolo. Oyo akoki kondima makambo oyo, tika andimayango.

Yesu ayambi bana mike

(Mk. 10.13-16 ; Lk. 18.15-17)

13Bongo bamemelaki Yesu bana mike mpo atiela bango maboko mpe abondela mpo na bango. Kasi bayekoli bagangelaki bango.

14Bongo Yesu alobaki :

—Botika bana mike baya epai na ngai, bopekisa bango te ; pambate Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bakokani na bango.

15Atielaki bango maboko, bongo alongwaki wana.

Bato ya mbongo mpe Bokonzi ya Nzambe

(Mk. 10.17-31 ; Lk. 18.18-30)

16Moto moko ayaki pene-pene ya Yesu, mpe atunaki :

—Moteyi, likambo nini ya malamu esengeli nasala mpo nazwa Bomoi ya seko ?

17Yesu azongiselaki ye :

—Mpo na nini otuni ngai mpo na likambo oyo ezali malamu ? Moto moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota na Bomoi, tosa Mibeko !

18Moto yango atunaki :

—Mibeko nini yango ?

Yesu azongisaki :

Koboma te, kosala kindumba te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te,
19tosa tata mpe mama na yo, mpe linga moninga na yo lokolo omilingaka yo moko !

20Elenge mobali alobaki :

—Natosaka mibeko wana nyonso. Bongo nazangi lisusu nini ?

21Yesu alobaki na ye :

—Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo, mpe pesa na babola, bongo okozwa bomengo na Likolo. Sima yaka, mpe landa ngai !

22Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendaki na mawa, pambate azalaki na bozwi mingi penza.

23Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye :

—Nalobi na bino ya solo : ezali pasi mpo moto ya mbongo akotana Bokonzi ya Likolo.
24Nalobi na bino lisusu ete : ezali pasi te mpo Shamo aleka na lidusu ya tonga, kasi ezali pasi mingi mpo moto ya mbongo akota na Bokonzi ya Nzambe.

25Tango bayekoli bayokaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki :

—Bongo nani akoki kobika ?

26Yesu atalaki bango mpe alobaki :

—Epai ya bato, yango ekoki kosalama te ; kasi mpo na Nzambe, nyonso ekoki kosalama !

27Piere atunaki ye :

—Tala, totiki nyonso mpo na kolanda yo, bongo ekozala bomi mpo na biso ?

28Yesu azongiselaki bango :

—Nalobi na bino ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sikampe Mwana ya moto akovanda na Kiti na ye ya kembo, bino baoyo bolandaki ngai bokovanda mpe na bakiti zomi na mibale mpo na kosambisamabota zomi na mibale ya Isayele.
29Mpe moto oyo atika bandako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, tata na ye, mama na ye, bana na ye, to bilanga na ye mpo na ngai, akozwa yango mbala nkama koleka, mpe akozwa lisusu bomoi ya seko. 30Kasi bato mingi oyo bazali bato ya liboso, bakokoma bato ya suka ; mpe bato mingi oyo bazali bato ya suka bakokoma bato ya liboso !
Copyright information for LinMNB